Fally Ipupa
Je t’aime

[Intro]
Aah
Je t'aime
Math Mathurin Tshananga
DJ Master Li

[Couplet 1]
Pona maladie na nga
Babengi ba médecins
Babengi ba spécialistes
Ba cardiologues, ba neurologues
Ba amourologues, ba anchologues
Babengi pe ba elengiologues
Po ba décrypter malaise ango
Ata moko te azo guérir nga à part yo
Nakomi inondée na mayi ya miso se po ya kolelaka yo
Yo nde moto ozalaka sango a diplôme na matoyi na nga finaliste
O préféré okoma sango a liwa ya pape na matoyi ya ba catholiques

Amour na nga ah
Tellement déplorable, tellement pitoyable
Basengeli yango intention de prière
Pasi na nga aah
Lokola ya maladе oyo abela pendant cinquante ans
Ata lisungi еmonana te
Mais Mokolo ya liwa na ye
Baninga, ba familles, ba collègues na écart ya quarante minutes
Batindi 10 mille dollars pona ba obsèques
Nasili mayele, nabeli
Nazokanisa trop esika nakobomba bolingo pona motema soucis etimbela
Po déception emona te code secret ya bolingo na nga
Mosusu nakolinga aza te, introduction yo, conclusion nga
Immunité na nga parlementaire ya motema n'o
Balongoli yango po e invalider nga na motema n'o
Mais ata olobi oboya nga, humanité mobimba ekofunda yo
Pona bolingo na biso ezalaka na valeur ya globe terrestre

Miso na nga Math o pie embargo ya kotala te direction ya bolingo na yo
Mwana etike, mozangi ya pamba, bomengo na nga bolingo
Amour na yo inéluctable na vie na nga lokola
Fréon pona malili ya congélateur, douze heures sans moyi eza minuit
Motema na nga sans yo Mathurin synonyme parfait ya enfer
Je te veux dans ma vie amour le sous bassement de mon bonheur

[Refrain]
Je t'aime de tout mon cœur
(Je t'aime de tout mon cœur)
I love you Math Mathurin
(I love you Mathurin Math)
Nalingaka yo mingi bébé na ngai
(Nalingaka yo mingi Mathurin)

Esi nabonga na nga epa na yo eh, kobonga na nga Mathurin
Nasuka nga awa na effaça le passé
Je n'ai d'yeux que pour toi mon ange, mon amour, mon opium
(Les soixante-six livres ya Bible ekoki te ko convaincre nga)
(Naboya yo, natika yo, nakoka te kobosana amour na nga Math)
[Couplet 2]
Bolingo na nga ezo bela malnutrition, infection n'o
Na se ya kwiti moto akoki obosana date de naissance c'est vrai
Milliardaire akoki o perdre de vue montant ya fortune na ye
Mais jamais akoki obosana elongi pe kombo ya moto alinga
T'oublier est impensable, inacceptable, inimaginable
Sur mon corps j'écrirai ce cœur n'est pas à aimer
Ndenge na mur a lopango bakomaka cette parcelle n'est pas à vendre
C'est toi mon unique amour, c'est toi que j'adore bébé

[Refrain]
Je t'aime de toutes mes forces
(Je t'aime de tout mon cœur)
I love you Math Mathurin
(I love you Mathurin Math)
Ngai nalingaka yo mingi bébé na ngai
(Nalingaka yo mingi Mathurin)

Esi nabonga na nga epa na yo eh, ko bonga na nga Mathurin
Nasuka nga awa na effaça le passé
Je n'ai d'yeux que pour toi mon ange, mon amour, mon opium
(Les soixante-six livres ya Bible ekoki te ko convaincre nga)
(Naboya yo, natika yo, nakoka te kobosana amour na nga Math)

[Couplet 3]
Loin de toi ma vie est sans envie et mon corps est sans cœur chéri eh
Nalinga, nalinga, nalela na nga yo, okoboma nga soki okeyi
Épargner nga douleur mortelle ya love, nakoya ko suffoquer chéri eh
Lokola grand car ekweleli libata espoir de vie ekomi impossible
Bolingo na nga sur mesure na yo, o refouler nga na motema n'o
[Refrain]
Je t'aime de tout mon cœur
(Je t'aime de tout mon cœur)
I love you Math Mathurin
(I love you Mathurin Math)
Nalingaka yo mingi bébé na ngai
(Nalingaka yo mingi Mathurin)

Je t'aime de toutes mes forces
(Je t'aime de tout mon cœur)
I love you my baby
(I love you Mathurin Math)
Nalingaka yo mingi bébé na ngai
(Nalingaka yo mingi Mathurin)