Fally Ipupa
Emeraude
Pene ya nkoyi soki ba mboloko
Bakomi oleka na kimia
Yeba, libumu'a nkoyi esi etondi

Pene na yo ata nalie ba ngombe zomi
Nzala na nga pona yo ezo koka te eh

Nzoto na yo nionso pe eza invitation ya l'amour
Ya bonheur eh

Ezaaa bolingo te, ezali plus que amour
Oyo etondi na kati ya motema na ngai

Eza philosophie, ezali pe doctrine eeh
Oyo'esangisi mitema ya ngai na Michelle

Deux milles bakweyi na gauche
Dix milles bakweyi na droite na biso
Ya Edgar na Michelle
Elongi mbonge na ba inondations

Michelle azali emeraude eh impérissable
Bolingo ya Michelle ekokawuka
Sima ba océans
Dictionnaire ya l'amour na nga etonda
Obe na kombo ya Michelle
Nga kaka na ye eh
Nako changer ye te eh
Michelle ye nde aza toujours la plus belle eh

Basi bakoma kolala pongi ya nguma ekenge eleka
Michelle alalaka lokola bébé
Po ayebi asi'alonga motema a Edgar
Émeraude enzulukaka te eh
Michelle Nguesso est toujours la plus belle
Pe emataka talo soki ezo wumela

Basi bakoma kolala pongi ya nguma ekenge eleka
Michelle alalaka lokola bébé
Po ayebi asi'alonga motema a Edgar
Émeraude enzulukaka te eh
Michelle Nguesso est toujours la plus belle
Pe emataka talo soki ezo wumela

Sans mayi est-ce que ebale ekozala
Non non non non non non noooon

Sans mapata est-ce que likolo ekozala
Sans mabele est-ce que moto akotelema
Non non non non non non nooon

Bopekisa nga ye te azua déjà tout
Ye akanga tout, ye ajali tout
Apesaka nga tout
Soki olingi moto kotika ye te
Kanga ba nzela na ye nionso azala ya yo
Ezali pasi te voiture ezala ya yo
Mais kasi moto mobimba po azala ya yo
Eza nzaka ve

Qui a dit que banjelu bazalaka kaka na paradis
Bongo Michelle aza nani eh

Bino bolobaka que kitoko ya mwasi fololo
Bongo Michelle po nini azo faner te
Aza émeraude inzulucable eh

Nalela na nga ye nalangwa na nga Michelle
Azongisaka nga comme au premier jour
Secret na ye asambelaka mingi
Aliaka misuni mokie, ba fruits ebele oh

Nakolatisa banderole na molayi ya Tour Eiffel
Nakoma Michelle na Edgar for life
Soki ba touristes batuni ba oyo nde nani, boloba
Bolobani Michelle

Michelle, Michelle ya Edgar
Bolobani Michelle
Edgar, Edgar ya Michelle
Michelle bonheur
Oyo ya biso bonheur
Michelle liaka mbongo na nga ndenge olingi eeh
Michelle liaka mbongo na nga ndenge olingi eeh
Michelle numéro ya compte na nga yango oyo
Michelle bimisa mbongo na nga ndenge olingi eeh
Michelle code ya coffre-fort yango oyo
Michelle tokaka mbongo na yo ndengo olingi
Ah Michelle maman a bana na nga na lela yo
Michelle maman a bana na nga na lela yo

Non non non non non non non non oonh
Michelle maman a bana na nga na lela yo

Bolobani Michelle
Michelle abatelaka nga
Bolobani Michelle
Na lova na nga Michelle
Michelle bonheur
Nabala bonheur

Michelle liaka mbongo na nga ndenge olingi eh (eeeeeh)
Michelle liaka mbongo na nga ndenge olingi eh
Michelle code ya black carte yango oyo (ouuh)
Michelle bimisaka mbongo na nga ndenge olingi eeh
Michelle code ya coffre-fort yango oyo oh
Michelle tokaka mbongo na nga ndengo olingi

Po nayebi olingaka nga pona mbongo te motema Michelle
Michelle batelaka bana na nga
Michelle batelaka bana na nga eh