[Intro]
Echantillon ya bolingo Azmak na ngai
Yo otikeli moninga okeyi
Ata batu bako bongwama Azmak
Kasi ngubu na mayi okotikala obe ngubu
[Couplet 1]
Yo moto olobaka nga tokokabwana te
Ata pasi, bisengo okokanga motema
Lelo okomi okende otika nga na nani
Y'otiki ba pota na motema na nga bomwana
Naluki liwa, liwa ebo n'ango ngai eh
[Couplet 2]
Ebele ya ba mvula tovandi nga na yo
Mokolo moko Azmak, y'obosani manso
Loyenge ya mokili, ezipi yo bongo
Y'ozoyoka te (Y'ozo mona te)
Yo ozalaka nde auteur ya mibeko ya l'amour
Yo moko auteur, y'o violé ndé ba lois
Oh dis chéri (Pourquoi vraiment ?)
Soki nazalaki officier mbele nakangisi yo
Jugement pe ya mokili oyo, naza na confiance te
Ekomaya kosomba, connaissance na famille
Ngai ko famille te oh, natiki na nga mais bolingo eza nanu
Natiki na nga mais bolingo eza nanu
Makanisi elobi naboya mais motema ezokoka te
Zongela nga ata butu mo, mo, moko, oh
(Nayebi kokoma yoka nga nkele na ba nausées)
(Nayebi kokoma yoka nga nkele na ba nausées)
[Couplet 3]
Oh Azmak, zela ata tongo etana bongo okende
Nazobanga butu bandoki ba envoûter sentiments na nga
Lalisa nga pongi ya suka, bandoto'a suka
Nalobi mwana suka aliaka nde mingi (oy'a yo)
Aveugle asalaka choix ya elamba te oh mama (Azmak)
Namona trop kasi motema elula se yo
Namona mingi kasi motema epona n'ango se yo
Loboko avant esenga (Sentiment motema Azmak)
Nafongoli loboko ata mua nguba eza te
[Couplet 4]
Maloba na nga moyibi ata nalobi vérité
Banda nayiba ndongo ndongo ata misili ebungi
Ndenge nini nawangana Nzambe?
Kaka obele mais naliaka na nga pe misili te
Mais kasi ndenge nini nawangana
Yuda ata abongoli motema
Loba bapasola bible po bandima ye
Nga nalingi na nga se yo
[Pré-refrain]
Revoir cas na nga eh Azmak
Revoir cas na ngai papa na Latifa
Nakomi finaliste Azmak
Nabengaka yo cheri chouchou'a motema
Ata quarante-deux pour-cent
Délibérer moninga,
Ata naza na nga mayele te
Mais nazalaka toujours présente
Y'obebisi vie na nga eh
Mabe abengani nga
Matinda atindiki nga
Alpha a favorisé
Mazé zongisa nga na carreau na yo (Ya bolingo)
[Pré-refrain]
Revoir cas na nga eh Azmak
Revoir cas na ngai papa na Aziz Delido
Nakomi finaliste Azmak
Nabengaka yo cheri chouchou'a motema
Ata quarante-deux pour-cent
Délibérer moninga'ango
Ata naza na nga kitoko te
Mais nazalaka toujours présente
Linga nga lokola Warzeline eh
Mabe abengani nga
Matinda atindiki nga
Alpha a favorisé
Azmak zongisa nga na motema na yo (Ya bolingo)
Nzambe
Eh Madina Djobounge ah
[Refrain]
Ponela nga nzela naleka
Epayi bakotuna ngai yo te
Lobi omemelaki nga fololo
Lelo otindeli nga matiti
[Couplet 5]
Ngai moto namesana ba sorties nionso kaka nga na yo
Yo moto olakisa nga bolingo ya solo wuta bomwana na nga
Lelo bafeti nionso nakende batunaka nga "Oye yo na nani ?"
Soki nalobi oboya nga, baboyi kokotisa nga yoka bango :
Oyo eloko ya nani eh, nani amemeli biso eloko yo
Oyo mwasi ya nani eh, nani abungisi mwasi oyo
Nani aye feti singleton alokota ye akota na ye
[Refrain]
Ponela nga nzela naleka
Epayi bakotuna ngai yo te
Lobi omemelaki nga fololo
Lelo otindeli nga matiti
[Outro]
Ah, ah Nzambe
Ah Nzambe sunga ngai eh
Ah Nzambe, motema
[Refrain]
Ponela nga nzela naleka
Epayi bakotuna ngai yo te
Lobi omemelaki nga fololo
Lelo otindeli nga matiti