Koffi Olomidé
Chemin de la vie
Chemin de la vie
KOFFI-OLOMIDE


WASA !!!
Nkolo tia nga na nzela
Kamata nga loboko
Bongola nga motema
_

Nga na sali nini vraiment
Nga na sali nini penza
Pona bonga na la vie
Po nga pe ba ndima nga
Ba tika ko sekaka ngaee
Ba tika ko sombela nga
Pona na bonga na mokili
Po nga pe ba ndima nga
Lokola ba ninga ayeee

Nga na sali nini vraiment
Nga na sali nini penza
Pona bonga na mokili
Po nga pe ba ndima nga
Ba tika ko sekaka ngaee
Ba tika ko sombela nga
Balinga ko tsholaka nga
Po na zua na mokili
Po nga pe ba ndima nga
Lokola ba ninga ayeee
AR: Moyen moko soki ezali
Nzela moko soki ezalaka
Oyo mutu alandaka po abonga
Lakisa nga yango yaweh
Palado ata na ndoto ( ×2 )

Limbisa masumu ma nga
Mabe na nga na tumbeliee
Oyo nga nzela soki ba kangaee
Etoile na nga soki ba bebisa
Na bo ndoki to na magie ?
Fongola nga na kende liboso ! (×2)

Oh la vie !
Sango boni la vie ?
Yo bo mengo !
Ofandaka na balabala nini ?
Oloba te ??


Ref: Tango na zalaki mwana moke
Na ba mbula nzomi na ndambu
Moto soki aza na 25 ans
Na zalaki ko mona ye mpaka
Lelo nga ba mbula tuku misatu
Eloko moko te kaka boye
Ba bandi ko bota na baliee
Aristote ako bеnga ngayi papa
Elvis pe aye sima ndengе moko
Mwana mobali ako suka wapiiii (×2)
Ima olé nza we ima olé !
Ima olé nza we ima olé

Na lela papa
Nga na lela mama
Na lela yaya
Nga lela aristote na lela elvis
Nga na lela mama na lela papa
Nga na lela yaya
__
* LA VIE NDE BOYE PAPA
LA VIE NDE BOYE MAMA
BATU BA KOKANAKA TE
NZAMBE AZA POURTANT SE MOKO
YE MOKO AKELA BATU NA SE
YE MOKO ATIA BO KESENI
YE MOKO AYEBI DESTIN YA MOTO
MOTO ALELA TINA NINI EE
PAPA TINA NINI
MAMA TINA NINI

__ Ima olé nza we ima olé !
Ima olé nza we ima olé
CONTINUE!...

AH !! nga mabanzo papa
Ah !! Nga motema mama
Nga témoin ya mama ami
Ah nga papa y'amour na débat
Nga papa na elvis
Na salaka na bo boto
Na motema a peto et pe moko
Eloko ko zuwa na yebi te
Likonia nzambe apima ngayi
Yango na lelaka te po na yebi
Nzambe ako pona nga na tango na ngayi !..

Lyrics ajouté par : Harka_Sky